Mark 1

MABONGISI YA MOSALA YA YESU

Jean Batiste ntoma ya Nzambe

(Mt. 3.1-12 ; Lk. 3.1-6,15-18 ; tala Jn. 1.19-28)

1Ebandeli ya Sango Malamu ya Yesu Kristo, Mwana ya Nzambe. 2Na mokanda ya moprofeta Ezayi ekomama boye : Tala, nakotinda ntoma na ngai liboso na yo,
oyo akobongisela yo nzela.

3 Mongongo ya moto ezali kobelela na esobe :
Bobongisa nzela ya Nkolo,
Bosembola banzela na ye !

4Jean ayaki, azalaki kobatisa na esobe mpe azalaki koloba : “Bozwa libatisi, mpo na kolakisa ete bobongoli mitema ; bongo Nzambe akolimbisa masumu na bino !”

5Bato nyonso ya mokili ya Yudea mpe ya Yeruzalem bazalaki kokendeepai na ye. Bazalaki koyambola masumu na bango, mpe azalaki kobatisabango na mayi ya Yordani. 6Jean azalaki kolata elamba oyo esalami na bapwale ya shamo, mpe mokaba ya poso ya nyama na loketo ; azalaki kolia makonko na mafuta ya nzoi. 7Azalaki koteya na bato boye :

—Moto moko akoya sima na ngai, ye aleki ngai na nguya ; nakoki kutu te kogumbama liboso na ye mpo na kofungola basinga ya sandale na ye.
8Ngai nazali kobatisa bino na mayi, kasi ye akobatisa bino na Molimo Mosantu !

Yesu azwi libatisi mpe bameki ye

(Mt. 3.13-17 ; Lk. 3.21-22)

9Na tango wana, Yesu ayaki wuta na Nazareti na Galileya, mpe azwaki libatisi epai ya Jean na mayi ya Yordani. 10Tango azalaki kobima na mayi, amonaki likolo efungwamaki mpe Molimo akitelaki ye lokola pijon. 11Mongongo moko ewutaki na Likolo :

—Yo ozali Mwana na ngai ya bolingo, osepelisaka ngai mingi !

(Mt. 4.1-11 ; Lk. 4.1-13)

12Kaka na tango wana, Molimo atindaki Yesu na esobe. 13Avandaki kuna mikolo ntuku minei elongo na banyama ya zamba. Kuna Satana amekaki ye mpe baanzelu bayaki kosalela ye.

MOSALA YA YESU NA GALILEYA

Yesu abandi koteya

(Mt. 4.12-17 ; Lk. 4.14-15)

14Tango bakangaki Jean, Yesu akendaki na Galileya. Ateyaki Sango Malamu ya Nzambe. 15Azalaki koloba :

—Tango esiʼekoki ; Bokonzi ya Nzambe ekomi pene-pene ! Bobongola mitema mpe bondima Sango Malamu.

Bayekoli ya liboso ya Yesu

(Mt. 4.18-22 ; Lk. 5.1-3,10-11)

16Mokolo moko, Yesu azalaki koleka pembeni ya ebale ya Galileya, amonaki Simon na ndeko na ye Andele. Bazalaki kobwaka monyama na ebalepamba te bazalaki baluki mbisi.

17Yesu alobaki na bango :

—Boya, bolanda ngai, mpe nakokomisa bino baluki ya bato !

18Kaka na tango wana, batikaki minyama na bango mpe balandaki ye. 19Tango apusanaki mwa liboso, amonaki Zaki mwana ya Zebedeo na ndeko na ye Jean, bazalaki na kati ya bwato mpe bazalaki kobongisa minyamana bango. 20Kaka na tango wana, abengaki bango ; batikaki tata na bango Zebedeo na kati ya bwato, elongo na basali na ye, mpe balandaki Yesu.

Yesu abengani milimo mabe

(Lk. 4.31-37)

21Bakendaki na Kapenawumi. Mokolo ya saba
Saba  : Yenga ya bayuda, samedi ya lelo.
, Yesu akotaki na ndako ya mayangani mpe abandaki koteya.
22Bato bakamwaki mingi penza mpo na mateya na ye ; pamba te azalaki koteya te lokola balakisi ya Mibeko, kasi azalaki koteyabango na nguya nyonso.

23Kaka na tango wana, moto moko azalaki na nse ya bokonzi yamolimo mabe, azalaki mpe na ndako na bango ya mayangani. Abandakikoganga :

24—Yesu ya Nazareti, olingi kosala biso nini ? Oyei mpo na koboma biso ? Nayebi yo ozali nani : ozali Mosantu ya Nzambe !

25Bongo Yesu agangelaki molimo yango :

—Vanda nyee mpe bima na moto oyo !

26Molimo mabe eningisaki moto yango makasi penza mpe ebimaki na koganga.

27Bato nyonso bakamwaki mingi penza mpe bazalaki kotunana moko na moko :

—Likambo nini oyo ? Oyo ezali mateya ya sika ! Azali kogangela milimo mabe na bokonzi nyonso, mpe yango ezali kotosa ye !

28Bongo basango na ye epanzanaki noki na mokili mobimba ya Galileya.

Yesu abikisi bato ya maladi ebele

(Mt. 8.14-15 ; Lk. 4.38-39)

29Kaka na tango wana, tango abimaki na ndako ya mayangani akendaki
Mikanda misusu ya kala ezali koloba : “Bakendaki.”
na ndako ya Simon mpe Andele, elongo na Zaki mpe Jean.
30Bokilo ya Simon alalaki na mbeto mpe azalaki na fievre. Bongobayebisaki yango na Yesu kaka na tango wana. 31Apusanaki, akamataki ye na loboko mpe atelemisaki ye. Fievele esilaki, mpe abandaki kosalela bango.

(Mt. 4.24 ; 8.16-17 ; Lk. 4.40-41)

32Tango pokwa ekomaki, moi esilaki kokita, bamemelaki Yesu bato nyonso ya maladi na baoyo bazalaki na milimo mabe. 33Bato nyonso ya vile wana, bayaki kosangana liboso ya porte ya ndako. 34Yesu abikisaki bato ebele oyo bazalaki na bapasi ya ndenge na ndenge. Abenganaki mpe milimo ebele ya mabe mpe apesaki milimo mabe nzela te mpo na koloba ; pamba te, yango eyebaki ye soki azalaki nani.

(Lk. 4.42-44)

35Na tongo penza, tango molili ezalaki naino, Yesu alamukaki, abimaki na ndako, akendaki na esika ya ye moko kaka, mpe abondelaki wana.

36Simon na baninga na ye bakendaki koluka ye. 37Tango bamonaki ye, balobaki na ye :

—Bato nyonso bazali koluka yo.

38Kasi ye azongiselaki bango :

—Tokende epai mosusu, na bamboka oyo ezali pembeni-pembeni, mpo nateya mpe kuna. Pamba te, nayaki mpo na yango.

39Atambolaki na Galileya mobimba, azalaki koteya na bandako na bangoya mayangani mpe azalaki kobengana milimo mabe.

(Mt. 8.1-4 ; Lk. 5.12-16)

40Moto moko ya maladi ya maba, ayaki epai na ye, afukamaki libosona ye, mpe abondelaki ye :

—Soki olingi, okoki kokomisa ngai peto.

41Yesu ayokelaki ye mawa, atandaki loboko, asimbaki ye mpe alobaki :

—Nalingi yango, koma peto !

42Kaka na tango wana, maba yango esilaki mpe akomaki peto.

43Yesu azongisaki ye sima ya kopesa ye likebisi oyo :

44—Yoka malamu, koyebisa likambo oyo na moto te ! Kasi kende komilakisa na nganga-Nzambe, mpe pesa likabo oyo Moyize atindaki mpo na kopetolama na yo. Mpo yango ezala litatoli epai na bango ete yo obiki.

45Kasi ye, tango abimaki kaka, abandaki koloba na bonsomi nyonso mpe kopanza sango yango. Yango wana, Yesu akokaki te kokota na vile na ndenge ya polele ; kasi azalaki kovanda na libanda ya vile, na bisika ya ye moko kaka. Bongo bato bazalaki kowuta bipai na bipai bazalakikoya epai na ye.
Copyright information for LinMNB